Loboko Nayo Mosungi

Na kati ya bomoi ya bandimi, tozali na ba Groupe mibale. Baoyo bakendaka na losambo mpe bayokaka mateya , kasi basalaka eloko te na yango. Mpe baoyo bakendaka na losambo mpe na nsima batiaka maloba wana na misala. Na yango motuna mozali boye : Groupe nini oyo yo ozali.

Yake 2:14-26 " Bandeko na ngai, Tina nini ezali na moto koloba ete azali na kondima , soki azali kolakisa misala na yango te? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye? Ndakisa; ndenge nzoto oyo ezangi mpema ezali ya kokufa , ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa."

What is Loboko Nayo Mosungi?

Kopalanganisa nsango malamu na bosolo, mpo ete ekoki kokoma bisika nyonso na mokili. Nakolongola to nakobakisa maloba te oyo euti na bible ezala bobele lolenge ekomami.